Mokolo Nakokufa - Tabu Ley Rochereau, African Fiesta 66

Mokolo Nakokufa - Tabu Ley Rochereau, African Fiesta 66

Альбом
The Voice of Lightness, Vol. 1: Congo Classics (1961-1977) [Album 1]
Год
2007
Язык
`Kosa`
Длительность
296450

Poniżej tekst piosenki Mokolo Nakokufa , wykonawca - Tabu Ley Rochereau, African Fiesta 66 z tłumaczeniem

Tekst piosenki „ Mokolo Nakokufa ”

Oryginalny tekst z tłumaczeniem

Mokolo Nakokufa

Tabu Ley Rochereau, African Fiesta 66

Mokolo mosusu ngai nakanisi

Naloti lokola ngai nakolala

Ah mama ha

Mokolo nakokufa

Mokolo nakokufa, nani akolela nga

Nakoyeba te oh

Tika namilela

Liwa ya zamba soki mpe liwa ya mboka

Liwa ya mpasi soki mpe liwa ya mayi

Oh mama uh

Mokolo nakokufa

Mokolo nakokufa, ngai motu ya pauvre

Nakanisa Ida mwasi oyo nabala

Nakanisa kaka bana nabota

Nasepela kaka mpasi ya mokili ezali kotikala

Mokolo nakokufa

Mokolo nakokufa, ngáí moto ya mbóngo

Nakanisa falánga míngi óyo natíkí

Nakanisa lopángo na bakaminyó

Nakanisa bána ngáí natínda na Mpótó

Mamá uh

Mokolo nakokufa

Mokolo nakokufa, ngáí moto ya kwíti

Nakanisa kopó ya masanga na ngai

Nakanisa níni kaka súka ya sánzá

Ntángo namelaka ngáí na baníngá

Ah Mamá ha

Mokolo nakokufa

Mokolo nakokufa, ngáí mwásí ya ndúmbá

Nakanisa níni káka perruque na ngá

Nakanisa níni káka na bilambá na nga

Nakolela káka African-Fiesta etíkala

Mamá

Mokolo nakokufa

Mokolo nakokufa, nani akolela nga

Nakoyeba te o

Tika namilela

Liwa ya zamba soki mpe liwa ya mboka

Liwa ya mpasi soki mpe liwa ya mayi

Oh mama

Mokolo nakokufa

Mokolo nakokufa, ngáí moto ya kwíti

Nakanisa kopó ya masanga na ngai

Nakanisa níni kaka súka ya sánzá

Ntángo namelaka ngáí na baníngá

Ah Mamá uh

Mokolo nakokufa

Mokolo nakokufa, ngáí mwásí ya ndúmbá

Nakanisa níni káka perruque na ngá

Nakanisa níni káka bilambá na nga

Nakolela káka African-Fiesta etíkala

Mamá

Mokolo nakokufa

Ponad 2 miliony tekstów piosenek

Piosenki w różnych językach

Tłumaczenia

Wysokiej jakości tłumaczenia na wszystkie języki

Szybkie wyszukiwanie

Znajdź potrzebne teksty w kilka sekund